Saturday, November 30, 2013

MOKOLO NAKOKUFA


Mokolo mosusu ngai nakanisi Naloti lokola ngai nakolala A mama Mokolo nakokufa
Mokolo nakokufa, nani akolela ngai ? Nakoyeba te o Tika namilela. Liwa ya zamba soki mpe liwa ya mboka Liwa ya mpasi soki mpe liwa ya mai O mama Mokolo nakokufa
Mokolo nakokufa, ngai motu ya pauvre Nakanisa Ida mwasi oyo nabala Nakanisa kaka bana nabota Nasepelaka mpasi ya mokili ezali kotikala Mokolo nakokufa
Mokolo nakokufa, ngáí moto ya mbóngo Nakanisa falánga míngi óyo natíkí Nakanisa lopángo na bakaminyó Nakanisa bána ngáí natínda na Mpótó Mamá Mokolo nakokufa
Mokolo nakokufa, ngáí moto ya kwíti Nakanisa kobóya masanga na ngá’ Nakanisa níni na nsúka na sánzá ntángo namelaka ngáí na baníngá A Mamá Mokolo nakokufa
Mokolo nakokufa, ngáí mwásí ya ndúmbá Nakanisa níni káka perruque na ngá’ Nakanisa níni káka na bilambá nakolela káka African-Fiesta etíkala Mamá Mokolo nakokufa

HABARI ZILIZOTUFIKIA.......TABU LEY ROCHEREAU HATUNAE TENA


Akiwa na Mavatiku, mwenye gitaa